echo de saint amand - wordpress.comesika ya nsekwa na yo, mpe na molimo na ngai nazanga kokende epai...

12
1 Echo de Saint Amand Mombele Limete Kinshasa Avril 2014 10 ème année Eleko ya Pasika Na Nzembo 118 tokotanga boye : Mokonzi akeli mokolo mwa lelo mpo tosepela mpe toyoka nsai. Ezali mokolo ya Pasika, elingi koloba ya Nsekwa ya Yezu. Nani mosusu akokaki kokela mokolo monene ndenge wana ? Nani akokaki kokanisa ‘te mokolo ya ndenge wana ekoki kozala ? Eyenga ya Pasika ezali nsuka ya biyanga yonso, ekoumela mikolo ntuku mitano mobimba, banda eyenga ya Pasika tee eyenga ya Pentekste. Eyenga ya molai, mpo ya kokanisa ‘te ezali na mosala mingi na kati ya bomoi na biso. Esengo ya Pasika esila noki te, esila kutu te. Toyemba Alleluia. Yezu asekwi, biso tosekwi na ye elongo. Mpiko na mosala na biso ekouta na Nsekwa ya Yezu. Tokanisa na maloba ya santu Paul : Soko Kristu asekwi te, mateya ma biso mazangi ntina, mpe boyambi bwa biso bozangi ntina (1 Cor 15, 14). Basakramento yonso, epusi nde sakramento ya Ukaristia, mwinda ya Nsekwa ekoteli bango. Litangi ya yambo ya balomingo na eleko ya Pasika euti na Bikela ya bapostolo. Santu Luka akomi yango, alakisi biso ndenge lisanga ya bakristu ya yambo esalemi, ndenge bazali na esengo mpo ya Nsekwa ya Yezu, ndenge babimi na bandako na bango mpe basakoli Liloba ya Nzambe. Boyambi Nsekwa ya Yezu, mpe boyoki lolaka ya Elimo Santu na kati ya motema ezalaki kotambwisa bapostolo na bakristu ya yambo. Yango wana Eklezia epalangani noki, bato mingi bakomi bakristu. Bakristu ya lelo, lokola ntango ya bapostolo, bayoka makambo Elimo Santu azali kolobela bango, bazala na mpiko mpo ya kopalinginia eyamba lokola bakristu ya yambo. Bazonga nsima te, bamilakisa te lokola bato bakoyoka mpiyo, mpe batikali na ndako, to bazali kowelana na kati ya Eklezia makambo mazali mpenza na ntina te. Manaka ya sanza ya avril 2014 Mar 1 Hugues / Ezek 47, 1-9.12 Psaume 45 Jean 5, 1-16 Mer 2 François de Paule / Isaie 49, 8-15 Psaume 144 Jean 5, 17-30 Jeu 3 Richard / Exode 32, 7-14 Psaume 105 Jean 5, 31-47 Ven 4 Isidore / Sagesse 2, 1.12-22 Psaume 33 Jean 7, 2.10.14.25-30 Sam 5 Vincent Ferrier / Jér 11, 18-20 Psaume 7 Jean 7, 40 -53 Dim 6 (Marcellin) / Lomingo ya mitano ya Karezimo / Ezek 37, 12- 14 Psaume 129 Rom 8, 8-11 Jean 11, 1-45 Lun 7 Jean Baptiste de la Salle / Daniel 13, 1-9.15-17.19-30.33-62 Psaume 22 Jean 8, 1-11 Mar 8 Julie / Nombres 21, 4-9 Psaume 101 Jean 8, 21-30 Mer 9 Gautier / Dan 3, 14-20.91-92.95 Dan 3 Jean 8, 31-42 Jeu 10 Fulbert / Gen 17, 3-9 Psaume 104 Jean 8, 51-59

Upload: others

Post on 12-Apr-2020

1 views

Category:

Documents


0 download

TRANSCRIPT

Page 1: Echo de Saint Amand - WordPress.comesika ya Nsekwa na yo, mpe na molimo na ngai nazanga kokende epai ya elanga, esika nkunda na yo etikali mpamba. Mpamba te, ezali Kristu oyo asekwi,

1

Echo de Saint Amand

Mombele – Limete – Kinshasa Avril 2014 10ème année

Eleko ya Pasika

Na Nzembo 118 tokotanga boye : Mokonzi akeli mokolo mwa lelo

mpo tosepela mpe toyoka nsai. Ezali mokolo ya Pasika, elingi koloba

ya Nsekwa ya Yezu. Nani mosusu akokaki kokela mokolo monene

ndenge wana ? Nani akokaki kokanisa ‘te mokolo ya ndenge wana

ekoki kozala ? Eyenga ya Pasika ezali nsuka ya biyanga yonso,

ekoumela mikolo ntuku mitano mobimba, banda eyenga ya Pasika

tee eyenga ya Pentekste.

Eyenga ya molai, mpo ya kokanisa ‘te ezali na mosala mingi na kati ya

bomoi na biso. Esengo ya Pasika esila noki te, esila kutu te. Toyemba

Alleluia. Yezu asekwi, biso tosekwi na ye elongo. Mpiko na mosala na

biso ekouta na Nsekwa ya Yezu. Tokanisa na maloba ya santu Paul :

Soko Kristu asekwi te, mateya ma biso mazangi ntina, mpe boyambi

bwa biso bozangi ntina (1 Cor 15, 14). Basakramento yonso, epusi

nde sakramento ya Ukaristia, mwinda ya Nsekwa ekoteli bango.

Litangi ya yambo ya balomingo na eleko ya Pasika euti na Bikela ya

bapostolo. Santu Luka akomi yango, alakisi biso ndenge lisanga ya

bakristu ya yambo esalemi, ndenge bazali na esengo mpo ya Nsekwa

ya Yezu, ndenge babimi na bandako na bango mpe basakoli Liloba ya

Nzambe. Boyambi Nsekwa ya Yezu, mpe boyoki lolaka ya Elimo Santu

na kati ya motema ezalaki kotambwisa bapostolo na bakristu ya

yambo. Yango wana Eklezia epalangani noki, bato mingi bakomi

bakristu.

Bakristu ya lelo, lokola ntango ya bapostolo, bayoka makambo Elimo

Santu azali kolobela bango, bazala na mpiko mpo ya kopalinginia

eyamba lokola bakristu ya yambo. Bazonga nsima te, bamilakisa te

lokola bato bakoyoka mpiyo, mpe batikali na ndako, to bazali

kowelana na kati ya Eklezia makambo mazali mpenza na ntina te.

Manaka ya sanza ya avril 2014

Mar 1 Hugues / Ezek 47, 1-9.12 Psaume 45 Jean 5, 1-16

Mer 2 François de Paule / Isaie 49, 8-15 Psaume 144 Jean 5, 17-30

Jeu 3 Richard / Exode 32, 7-14 Psaume 105 Jean 5, 31-47

Ven 4 Isidore / Sagesse 2, 1.12-22 Psaume 33 Jean 7, 2.10.14.25-30

Sam 5 Vincent Ferrier / Jér 11, 18-20 Psaume 7 Jean 7, 40 -53

Dim 6 (Marcellin) / Lomingo ya mitano ya Karezimo / Ezek 37, 12-

14 Psaume 129 Rom 8, 8-11 Jean 11, 1-45

Lun 7 Jean Baptiste de la Salle / Daniel 13, 1-9.15-17.19-30.33-62

Psaume 22 Jean 8, 1-11

Mar 8 Julie / Nombres 21, 4-9 Psaume 101 Jean 8, 21-30

Mer 9 Gautier / Dan 3, 14-20.91-92.95 Dan 3 Jean 8, 31-42

Jeu 10 Fulbert / Gen 17, 3-9 Psaume 104 Jean 8, 51-59

Page 2: Echo de Saint Amand - WordPress.comesika ya Nsekwa na yo, mpe na molimo na ngai nazanga kokende epai ya elanga, esika nkunda na yo etikali mpamba. Mpamba te, ezali Kristu oyo asekwi,

2

Ven 11 Stanislas / Jér 20, 10-13 Psaume 17 Jean 10, 31-42

Sam 12 Jules / Ezek 37, 21-28 Jér 31 Jean 11, 45-57

Dim 13 (Martin 1er ) / Lomingo ya mandalala / Isaie 50, 4-7

Psaume 21 Phil 2, 6-11 Mat 26, 14 – 27, 66

Lun 14 Maxime / Isaie 42, 1-7 Psaume 26 Jean 12, 1-11

Mar 15 Paterne / Isaie 49, 1-6 Psaume 70 Jean 13, 21-33.36-38

Mer 16 Benoît-Jeseph Labre / Isaie 50, 4-9 Psaume 68 Mat 26, 14-25

Jeu 17 Anicet / Mokolo ya minei mosantu / Exode 12, 1-8.11-14

Psaume 115 1 Cor 11, 23-26 Jean 13, 1-15

Ven 18 Parfait / Mokolo ya mitanu mosantu / Isaie 52, 13 – 53, 12

Psaume 30 Hébr 4, 14-16 ; 5, 7-9 Jean 18, 1 – 19, 42

Sam 19 Emma / Mokolo ya mposo esantu / Gen 1, 1 – 2, 2 Gen 22,

1-18 Exode 14, 15 – 15, 14 Isaie 54, 5-14 Isaie 55, 1-11 Baruch 3, 9-

15.32 – 4, 4 Ezek 36, 16-28 Rom 6, 3-11 Mat 28, 1-10

Dim 20 (Odette) / Eyenga ya Pasika / Actes 10, 34.37-43 Psaume

117 Col 3, 1-4 ou 1 Cor 5, 6-8 Jean 20, 1-9 ou à la Messe du soir

Luc 24, 13-35

Lun 21 Anselme / Actes 2, 14.22-32 Psaume 15 Mat 28, 8-15

Mar 22 Alexandre / Actes 2, 26-41 Psaume 32 Jean 20, 11-18

Mer 23 Georges / Actes 3, 1-10 Psaume 104 Luc 24, 13-35

Jeu 24 Fidèle / Actes 3, 11-26 Psaume 8 Luc 24, 35-48

Ven 25 / Actes 4, 1-12 Psaume 8 Luc 24, 35-48

Sam 26 Alida / Actes 4, 13-21 Psaume 117 Marc 16, 9-15

Dim 27 (Zita) / Lomingo ya mibale ya Pasika / Actes 2, 42-47

Psaume 117 1 Pierre 1, 3-9 Jean 20, 19-31

Lun 28 Marc (Eyenga) / 1 Pierre 5, 5-14 Psaume 88 Marc 16, 15-20

Mar 29 Catherine (Mémoire) / Actes 4, 32-37 Psaume 92 Jean 3, 7-15

Mer 30 Pie V / Actes 5, 17-26 Psaume 33 Jean 3, 16-21

Balomingo ya sanza ya avril 2014

6 avril : Lomingo ya mitano ya Karezimo

Matangi : Ezek 37, 12-14 Psaume 130 Rom 8, 8-11 Jean 11, 1-45

Maloba ya Nsango elamu ya lelo : Yezu agangi makasi : Lazaro,

bima. Mowei abimi ezali kolakisa nguya ya Yezu ya kobimisa bato

yonso na malita na bango na mokolo ya nsuka, ntango akoya kokata

likambo ya bato yonso. Lazaro, bima ezali kolakisa ‘te maloba oyo ya

Yezu ezali ya solo : Ngai nazali nsekwa mpe bomoi. Moto ayambi

ngai, ata awei, ndazali na bomoi (Jean 11, 25). Eyenga ya Pasika ezali

eyenga nsekwa ya Yezu ye moko, ezali kolakisa lisusu na makasi

nsekwa ya biso.

Nsekwa ezali kotala nzoto ya biso. Toyoka maloba ya santu Paul mpo

ya nzoto na biso : Basombi bino kosomba na motuya monene. Bongo

bokumisa Nzambe na nzoto ya bino (1 Cor 6,20). Nzoto oyo Nzambe

akosekwisa, tomemia yango.

Tozonga na Nsango elamu ya lelo : Yezu amonani na biso na bomoto

na ye mobimba : mayoki na ye lokola mayoka na biso (Yezu aleli),

bolingo na ye mpo ya Lazare, mpo ya bandeko na ye basi, mpo ya

biso banso, nguya na ye mpe monene… Na nsekwa ya Lazare, Yezu

alakisi ntina ya boyei na ye na mokili na biso : Nazali nsekwa mpe

bomoi.

Page 3: Echo de Saint Amand - WordPress.comesika ya Nsekwa na yo, mpe na molimo na ngai nazanga kokende epai ya elanga, esika nkunda na yo etikali mpamba. Mpamba te, ezali Kristu oyo asekwi,

3

Na kotanga Nsango elamu ya lelo, tomoni ‘te Oyo biso toyambi, aleki

biso mosika. Koyamba ye ezali kosalisa biso na kokende na liboso, na

kosepela.

13 avril : Eyenga ya Mbila

Matangi : Isaie 50, 4-7 Psaume 21 Phil 2, 6-11 Mat 26, 14 – 27, 66

Eyenga ya Mbila ezali ebandela ya Mposo esantu. Tokokota na

Mposo esantu liboso na nkembi (procession) mpe na mbila na

maboko, mpo ya kosala lokola bayekoli ya Yezu basalaki na

Yerusalem mokolo wana, tokokumisa Yezu na esengo makasi lokola

bayekoli bazalaki kosala na koganga : Ozana, Mwana wa David.

Nkembo na Oyo akoya o nkombo ya Mokonzi. – Biso na banzembo na

biso tozali kokumisa Yezu mpo ya malamu yonso asalaki mpo ya biso.

Tosepeli lelo na kokumisa ye. Yezu ye moko alingaki ‘te bakumisa ye

na mongongo makasi, batanda minkoto na bango na nzela, babuka

bitapi ya nzete, batanda yango na nzela.

Misa ya lelo, na botangi Mpasi ya Mokonzi na biso Yezu Kristu,

ekolakisa biso na kokota na Mposo esantu na makanisi elongobani.

Mokomi moko, Guerric d’Igny alobi boye : Soko totali nkembi

(procession) ya lelo na mpasi ya Yezu, tomoni epai moko Yezu na

nkembo mpe na bokonzi na ye, epai mosusu Yezu, moto ya bosawa

mpe ya mawa. Mpamba te na nkembi akozwa lokumu mpe bokonzi

na ye, mpe na Mpasi tokomona ye bapesi ye etumbu lokola moto

mabe. Awa nkembo mpe lokumu ekozinga ye, kuna azangi kitoko

yonso. Awa azali esengo ya bato mpe fierté na bango, kuna nsoni ya

bato mpe botali ye mpamba. Awa bakoganga : Ozana, Mwana wa

David. Babenisa mokonzi wa Israel oyo akoya o nkombo ya Mokonzi

Kuna bakoganga : Bakoma ye o kuruse Bakomemola ye zambi

amikomisi mokonzi ya Israel. Awa, bato bazali koya mbangu na

mandalala, kuna bakopesa ye mbata. Awa baweli na kotanda

minkoto na bango na nzela, kuna bakolongola bilamba na ye moko.

Si l’on considère en même temps la procession d’aujourd’hui et la

passion, on voit Jésus d’un côte sublime et glorieux, de l’autre

humble et misérable. Car dans la procession il reçoit des honneurs

royaux, et dans la passion on le voit châtié comme un bandit. Ici, la

gloire et l’honneur l’environnent, là il n’a ni apparence ni beauté. Ici

c’est la joie des hommes et la fierté du peuple ; là, c’est la honte des

hommes et le mépris du peuple. Ici, on l’acclame : Hosanna au Fils de

David. Béni soit le roi d’Israël qui vient. Là on hurle qu’il mérite la

mort et on se moque de lui parce qu’il s’est fait roi d’Israël. Ici on

accourt vers lui avec des palmes ; là, ils le soufflettent au visage avec

leurs paumes, et on frappe sa tête à coups de roseau. Ici on le

comble d’éloges ; là, il est rassasié d’injures. Ici, on se dispute pour

joncher sa route avec les vêtements des autres ; là, on le dépouille

de ses propres vêtements… Ici, il est monté sur un âne, assailli

d’hommages ; là, il est pendu au bois de la croix, déchiré par les

fouets, transpercé de plaies et abandonné par les siens.

20 avril : Eyenga ya Pasika

Matangi : Actes 10, 34.37-43 Psaume 117 Col 3, 1-4 ou 1 Cor 5, 6-8

Jean 20, 1-9 ou Mat 28, 1-10. Le soir : Luc 24, 13-25

Page 4: Echo de Saint Amand - WordPress.comesika ya Nsekwa na yo, mpe na molimo na ngai nazanga kokende epai ya elanga, esika nkunda na yo etikali mpamba. Mpamba te, ezali Kristu oyo asekwi,

4

Ezali ntango ya koyemba Alleluia : Bokumisa Nzambe. Na buku ya

Mibombamo 19, 1-4 tokotanga boye : Na nsima nayoki ut’o likolo

mingongo mya bato ebele, balobi : Alleluia ! (Kumisani Nzambe !).

Lokumu mpe nguya na Nzambe Mobikisi wa biso… Bayembi lisusu :

Alleluia ! … Babange ntuku ibale na banei mpe ba-Bomoi banei

bakwei bilongi o nse mpo ya kokumbamela Nzambe, oyo afandi o

ngwende. Balobi : Amen, Alleluia !

Nzambe asali solo mambi manene : Asekwisi Mwana na ye Yezu

Kristu, Mobikisi na biso. Tokumisa Nzambe ntangu yonso, toyemba

Alleluia ntango yonso. Awa Yezu asekwi, alakisi biso ndenge

makambo yonso ya moto ekosuka : na bomoi, na nkembo. Tokanisa

maloba ya Yezu : Ekomami ‘te Kristu asengeli koyoka malozi mpe

kosekwa o bawa nsima ya mikolo misato (Luc 24, 46).

Tolingi koyoka maloba ya monako moko ya Eklezia ya Moniele

(Orient) : Mokonzi, sala ‘te ntongo moko te ya sika eya kongengisa

bomoi na ngai, bongo na likanisi na ngai nazanga kokumbama na

esika ya Nsekwa na yo, mpe na molimo na ngai nazanga kokende

epai ya elanga, esika nkunda na yo etikali mpamba. Mpamba te, ezali

Kristu oyo asekwi, oyo azali koya epai ya ngai mokolo na mokolo na

ntongo. Ata bantembe ezalii ndenge nini, mokolo na mokolo, ata

makama ezali ndenge nini, ebandela ya mikolo na ngai yonso ekozala

ya kongenge, soko nakundoli – kasi na motema mobimba mpe na

makanisi yonso – ‘te Mobikisi na ngai alongi banguna yonso ya mabe

mpe liwa. Esakola na ngai ya yambo ya boyambi, ntongo yonso,

ekozala esakola ya boyambi na lilonga na yo ya libela.

Tolanda ndakisa ya santu Jean oyo ayambi noki nsekwa ya Yezu, ata

amoni ye te kasi amoni bobele elembo ya nsekwa, amoni bilamba :

Amoni bilamba bilali o nse, mpe elamba eye bazingaki Yezu o motù.

Elamba ena elali esika yoko na bilamba te, kasi ezingami o esika

esusu… Amoni mpe ayambi.

Oyo ndenge totangi na Nsango elamu ya lelo. Yezu azali koloba na

biso lokola alobaki na Thomas : Tika kobete ntembe… Esengo na bato

bayambi ata bamoni na miso te.

Bilembo oyo ezali kolakisa biso ‘te Yezu asekwi mpe azali na bomoi,

azali na kati ya biso, ezali ndenge na ndenge. Tokanisa ndennge

Eklezia ebandaki, ndenge epalangani, ndenge bapostolo bapesi

bomoi na bango mpo ya Yezu. Tokanisa na misala ya Eklezia tee na

mokolo ya lelo, na bosantu ezali na kati ya Eklezia, mpe na kati ya

bomoi ya bakristu mingi.

Totangi maloba oyo na Misa ya lelo : Bandeko, soko ya solo bosekwi

elongo na Kristu, boluka mambi ma likolo, esika Kristu azali mpe

afandi o loboko la mobali la Nzambe. Bokanisa mambi ma likolo,

maye ma nse te. Ya solo, bosili bowei, bomoi bwa bino bobombami

sikawa o mboka Nzambe elongo na Kristu (Col 3, 1-3).

27 avril : Lomingo ya mibale ya Pasika

Matangi : Actes 2, 42-47 Psaume 117 1 Pierre 1, 3-9 Jean 20, 19-31

Eklezia azali kosepela mobombamo ya Pasika (Nsekwa ya Yezu)

lomingo yonso, mikolo mwambe nsima ya mikolo mwambe, lokola

totangi na Nsango elamu ya lelo : Mokolo mona, mokolo nsima ya

Page 5: Echo de Saint Amand - WordPress.comesika ya Nsekwa na yo, mpe na molimo na ngai nazanga kokende epai ya elanga, esika nkunda na yo etikali mpamba. Mpamba te, ezali Kristu oyo asekwi,

5

sabato, na mpokwa, bayekoli ba Yezu basangani esika yoko… Nsima

ya mikolo mwambe, bayekoli basangani lisusu o ndako, mpe Thomas

azali na bango. Mokolo nsima ya sabato ezwi nkombo ya lomingo

(dies Dominica = Mokolo ya Mokonzi) mpo ya Nsekwa ya Mokonzi

Yezu. Eklezia akokoba kosangisa bana na ye lomingo na lomingo,

mikolo mwambe nsima ya mikolo mwambe.

Concile Vatican II azali koloba : Mokolo ya lomingo, bakristu

basengeli kosangana na ntina ‘te bayoka Liloba ya Nzambe mpe

basambela Ukaristia esantu : bakundola bongo Bolozi, Nsekwa mpe

nkembo ya Mokonzi Yezu, batondo mpe Nzambe oyo abotisi bango

mpo ya elikia ya bomoi, zambi ya Nsekwa ya Yezu Kristu na kati ya

bawa.

L’Eglise célèbre le mystère pascal en vertu d’une tradition

apostolique qui remonte au jour même de la Résurrection du Christ,

chaque huitième jour, qui est nommé à bon droit le Jour du Seigneur,

ou Dimanche. Ce jour-là en effet, les fidèles doivent se rassembler

pour que, entendant la parole de Dieu et participant à l’Eucharistie,

ils se souviennent de la Passion, de la Résurrection et de la gloire du

Seigneur Jésus, et rendent grâces à Dieu qui les a régénérés pour une

vivante espérance par la Résurrection de Jésus Christ d’entre les

morts.

Awa Yezu asekwi, abimeli bapostolo na ye, bango mpe basepeli

mingi. Apesi bango likabo monene ya Elimo Santu, mpe likoki

monene ya kolimbisa masumu.

Thomas azalaki na bango te mokolo wana. Mikolo mwambe na

nsima, Yezu abimeli bango lisusu mpe Thomas azali na bango.

Maloba ya Yezu na Thomas ezali mpe mpo ya biso: Tika kobete

ntembe, kasi yamba se boyambi… Alobi lisusu na Thomas: Oyambi

zambi omoni ngai, kasi esengo na bato bakoyamba ata bamoni te.

Yezu alingaki ‘te Thomas ayamba ‘te Yezu azali na bomoi, ata amoni

ye na miso te, ayamba bobele mpo ya maloba ya bapostolo.

Bapostolo na bakitani ya bango basakoli ‘te Yezu asekwi, bongo biso

totia ntembe te

Santu Augustin alobi boye mpo ya bakatekumene baye bakulaki

batisimu na butu ya Pasika: Nazali koloba na bino, bana bobotami

sika, bana mike mike na kati ya Kristu, bana ya sika ya Eklezia, ngrasia

ya Tata, bana ya Mama abota mingi, lintongo (bourgeon) mosantu,

lingambo (essaim) ya sika, fulele ya likembi na biso (fleur de notre

parure), mbuma ya mosala na biso, esengo na ngai mpe enkoti ya

ngai ya nkembo, bino yonso botelemi na liboso ya Mokonzi. Lelo

ezali limwambe ya mbotama na bino…

Je m’adresse à vous, enfants nouveau-nés, tout petits dans le Christ,

nouvelle postérité de l’Eglise, grâce du Père, fécondité de la Mère,

pieux bourgeon, nouvel essaim, fleur de notre parure et fruit de

notre labeur, ma joie et ma couronne, vous tous qui vous tenez

debout devant le Seigneur. Aujourd’hui c’est l’octave de votre

naissance.

Page 6: Echo de Saint Amand - WordPress.comesika ya Nsekwa na yo, mpe na molimo na ngai nazanga kokende epai ya elanga, esika nkunda na yo etikali mpamba. Mpamba te, ezali Kristu oyo asekwi,

6

Basantu ya sanza ya avril 2014

7 avril : Santu Jean Baptiste de la Salle, nganga Nzambe (1651-

1719) - Bokundoli

Abotami na France, na kati ya libota ya bato ya mbongo. Ayekoli

mingi na mboka na ye Rheims mpe na Paris. Na 1678, akomi nganga

Nzambe. Abandi komituna : Nakoki kosala nini mpo ‘te bato bazali

babola bakoka koyekola ? Mposa yango ekomi monene na motema

na ye. Amoni mpe ‘te ye moko akoki te na mosala yango. Bongo

abandi koluka bato basalisa ye na kofungola biteyelo. Oyo ebandela

ya Lingomba ya Bandeko ya Biteyelo ya Bakristu (Congrégation des

Frères des Ecoles Chrétiennes). Liboso afungoli biteyelo mpo ya bana

basi babola, na nsima mpo ya bana mibali babola. Na ntango wana

ateki biloko na ye yonso mpe ye moko akomi mobola.

Na komona ndenge bana babola bazali koyekola, ata bango bafuti

mbongo te, batei ya biteyelo mosusu bayokeli Jean Baptiste zuwa.

Bafundi ye lokola moto alingi kobebisa mosala na bango. Na kati ya

bandeko na ye ya lingomba oyo ye akelaki, matata ya ndenge na

ndenge ebimi mpe zuwa, kofunda ye na makambo ya lokuta… Mambi

ya ndenge wana eyokisi ye mpasi mingi na motema. Ezali mpo ya

bolingo na ye, mpe mpo ya motema na ye soke ‘te alongi mampasi

yango yonso. Na nsuka ya bomoi na ye alobi: Na kati ya mambi

yonso, ngai nafukameli mpo elingi Nzambe na bomoi na ngai (J’adore

en toute chose la volonté de Dieu à mon égard).

Eklezia azali kotala Jean Baptiste de la Salle lokola profeta mpo ya

mosala na kati ya bana, na ndenge akeli lingomba monene ya batei :

bato bamipesi na Nzambe, bato bayebi malamu mosala na bango,

mpe bamipesi mobimba na mosala ya kobokola bana na mayele mpe

na molimo na bango. Ye azalaki koloba na bandeko ya lingomba na

ye : Bosala ‘te na bolingo mpe na motema malamu na bino,

bomonisa bilembo ekolakisa ‘te bolingi bana baye Nzambe apesi bino

na kobokola, lokola Yezu alingi Eklezia na ye.

Frères des Ecoles Chrétiennes bazalaki 300 na ntango Jean Baptiste

akufaki. Sikawa bakomi 8000 mpe bazali kosala na mokili mobimba.

Na 1950, Papa Pie XII akomisi santu Jean Baptiste de la Salle :

Mobateli ya batei bakristu yonso.

Losambo : Tosenge na Nzambe mposa ya kosalela bilenge. Tolakisa

na santu Jean Baptiste de la Salle batei yonso : asambela mpo ya

bango.

11 avril : Santu Stanislas, episkopo mpe martiro (1030-1079)

- Bokundoli

Stanislas abotami na Pologne, na 1030. Fanda mpe kumisa Nzambe,

oyo maloba ya tata na ye mokolo Stanislas abotami, oyo mpe ntina

ya nkombo Stanislas. Ayekolaki liboso na Cracovie, mpe na nsima na

France. Likambo yango esali ‘te bondeko efanda na nsima na kati ya

Eklezia ya France mpe ya Pologne. Na France, Stanislas amonaki

ndenge nini ba-bénédictin babandaki kobongisa ezalela ya bakristu,

batika mimeseno ya mabe, na bokuse réforme ya Eklezia esalema.

Ntango Staniislas azongi na Pologne, asali mpe makasi mpo ya

kobongisa ezalela ya bakristu.

Page 7: Echo de Saint Amand - WordPress.comesika ya Nsekwa na yo, mpe na molimo na ngai nazanga kokende epai ya elanga, esika nkunda na yo etikali mpamba. Mpamba te, ezali Kristu oyo asekwi,

7

Na 1072, Stanislas akomi episkopo ya Cracovie. Alingi banganga

Nzambe na ye mingi, mpe azali kokende kotala bango moko moko

mbula yonso. Eklezia ya Pologne akokisi ntango wana mbula

monkama, banda 996 : oyo mbula ba-polonais bazwaki batisimu na

bango.

Stanislas azali na mpiko, azali kobanga te. Abandi koloba na mokonzi

ya Pologne, Boleslas : Ezalela na yo, malamu te ! Ozali koboma bato

basali mabe te ! – Abimisi Boleslas na kati ya lingomba ya bakristu

mpe apekisi ye na kokota na ndako Nzambe soko abongoli motema

te. Oyo ntina Boleslas ye moko akati Stanislas motù. Histoire ayebisi

biso ‘te na nsima Boleslas abongoli motema, atiki bokonzi na ye mpe

adufi na kati ya monastère ya ba-bénédictin.

Stanislas azali mobateli ya Pologne. Abundi etumba mpo ya

bosembo. Lokola soldat ya Kristu, bibuneli na maboko, azali kobatela,

ye moko bato oyo bazali koniokwama. Na monkanda ya santu

Cyprien, oyo tozali kotanga na eyenga ya santu Stanislas, tozali

koyoka: Tozali biso moko te ntango tozali kobunda etumba mpo ya

boyambi na biso. Nzambe azali kotala biso, banzelu na ye bazali

kotala biso. Kristu azali kotala biso. Santu Paul alobi: Bokanga Bosolo

bo nkamba o loketo, bolata Bosembo bo molato mwa etumba; mpe

bo sapato bolata Mpila (Mpiko) o bopalinginii Nsango elamu ya

boboto (Ephes 6, 4).

Losambo: Tosambela Nzambe atinda banganga Nzambe ya malamu

na ntalu ekoki na elanga na ye.

25 avril: Santu Marc, mokomi ya Nsango elamu (akufaki na 75)

- Eyenga

Marc moto akomaki Nsango elamu ya liboso ya Yezu. Marc akomaki

yango wapi mpe na mbula nini? Akomaki yango na Roma. Kuna na

Roma azalaki secrétaire ya apostolo Pierre. Pierre akufaki kuna na 64.

Marc akomaki Nsango elamu na nsima ya liwa ya Pierre, akomaki

yango liboso ya mbula 70.

Uta liwa mpe nsekwa ya Yezu, bapostolo, na Paul na Marc, na

bakristu mosusu bazalaki koteya bato na monoko. Malembe

malembe, makambo mosusu oyo Yezu alobaki to asalaki, bakomi

yango na minkanda mpe ya kosalisa bato baye bazali kopalinginia

Nsango elamu ya Yezu.

Toyebi nini ya bomoi ya Marc ? Marc azali elenge mobali oyo bazali

kobenga na nkombo ya Jean Marc. Azali mwana ya Maria, mpe Maria

azali moninga ya Pierre. Na Bikela ya bapostolo 12, 12 tozali kotanga

boye : Pierre akendeki na ndako ya Maria, mama ya Jean oyo bazali

kobenga Marc. Bato mingi bakutani kuna mpe bazali kosambela

Nzambe.

Marc abandaki kokende elongo na santu Paul na mobembo na ye,

bongo akomi na esanga ya Chypre. Na nsima Marc aboi na kolanda

lisusu Paul. Kasi na nsima Marc akei kotala Paul azali na boloko na

Roma. Paul atindi Marc lisusu kotala bato bazali na Asie Mineure

(Turquie) (Col 4, 20). Na nsuka Paul abengi ye lisusu na Roma. Paul

akomelaki Timothée maloba oyo : Kamata Marc, yaka na ye nzela

yoko, zambi akoki kosalisa ngai malamu awa (2 Tim 4, 11).

Page 8: Echo de Saint Amand - WordPress.comesika ya Nsekwa na yo, mpe na molimo na ngai nazanga kokende epai ya elanga, esika nkunda na yo etikali mpamba. Mpamba te, ezali Kristu oyo asekwi,

8

Pierre azali na ntango wana na Roma. Na monkanda na ye ya liboso

(1 Pierre 5, 11) akomi boye : Bandeko ba Eklezia bazali awa na

Babilone (Roma) batindeli bino mbote. Nzambe aponaki bango lokola

aponaki bino. Marko, mwana wa ngai, atindeli bino mbote lokola.

Makambo mosusu ya bomoi ya Marc toyebi yango malamu te. Bato

mosusu bazali koloba : Marc ateyaki Nsango elamu ya Yezu mpe na

Alexandrie (Egypte). Akufaki mpe kuna.

Toyoka nini santu Irénée, episkopo ya Lyon (130-200) akomaki :

Matthieu abimisi na mokili ya ba-héhreu, na monoko na bango,

Nsango elamu moko, na ntango Pierre na Paul bazalaki koteya

Nsango elamu na Roma. Na nsima ya liwa ya bapostolo oyo mibale,

Marc, moyekoli mpe secrétaire ya Pierre, alekisi na bato, na kati ya

monkanda makambo oyo Pierre azalaki koteya.

Na Nsango elamu ya santu Marc, mambi yonso ezali kolakisa Yezu

oyo azali Kristu, moto ya solo, ya motema malamu, moto alingi bato,

ayokeli bato mawa (8, 10), ayambi bana mike (10, 16), abandi koyoka

mawa mingi (14, 33). Yezu azali komonana : Mosantu : Ozali mosantu

oyo Nzambe atindi (1, 24), ozali Mwana wa Nzambe (3,11). Bilembo

oyo Yezu azali kosala ezali kotinda bato na kotuna : Likambo nini

oyo ? (1, 27). Moto oyo azali nani ? (4,22). Na ndenge Pierre alobi :

Ozali Kristu ( 8,29), ndenge moko mokonzi ya basoldat, ntango amoni

ndenge Yezu akufaki, agangi : Solo, moto oyo azalaki Mwana wa

Nzambe (15, 39).

Eteni ya mibale ya Nsango elamu ya santu Marko elakisi biso ndenge

tosengeli kolanda Yezu : Na ndenge Mwana wa moto asengeli koyoka

mpasi mingi… (8, 33), ndenge moko : Moto alingi kobikisa bomoi bwa

ye, akobungisa bwango ; kasi moto akobungisa bomoi bwa ye mpo

ya nkombo ya ngai mpe mpo ya Nsango elamu, akobikisa bwango (8,

35).

Losambo : Tosenge na santu Marc asalisa bana yonso ya bosawa

bandima Nsango elamu ya Yezu.

29 avril : Santu Catherine ya Sienne (1347-1380), ngondo mpe

motei ya Eklezia - Bokundoli

Catherine akufaki le 29 avril 1380, na ebandela ya ‘grand schisme

d’Occident’, elingi koloba ‘Bokabwani monene ya bakristu ya Mpoto’

(1378-1417). Papa akomisi ye mosantu na 1461. Na 1939, Papa

akomisi ye mobateli ya Italie, mpe na 1970, Catherine akomi motei

ya Eklezia.

Catherine Benincasa azalaki mwana ya ntuku mibale na mitano mpe

ya nsuka na libota na ye. Tata na ye azalaki teinturier (moto azalaki

kopesa langi na bilamba). Mama na ye azalaki mwana ya moto moko

bazalaki kobenga ye poète. Makambo ya mystique, tokoki koloba : ya

boyambi monene ezalaki na Catherine uta bomwana na ye. Azali

mpe na mayele mingi. Azali na mbula mwambe, ntango amipesi na

Nzambe, na libala ya mystique. Andimi kofanda ye moko na esika ya

kimia, mpo ya kosambela mpe komiyokisa mpasi.

Akokisi mbula 20 ntango akoti na lingomba ya balaiko ya santu

Dominique. Ndenge wana amonaki ‘te ndoto alotaki : Ngai nalingi

kokoma dominicaine mpo ya koteya Liloba ya Nzambe mpe

kozongisa na kati ya Eklezia baye baboyaki eyamba ya solo, ndoko

Page 9: Echo de Saint Amand - WordPress.comesika ya Nsekwa na yo, mpe na molimo na ngai nazanga kokende epai ya elanga, esika nkunda na yo etikali mpamba. Mpamba te, ezali Kristu oyo asekwi,

9

wana ekomi ya solo. Abandi kosangisa bato penepene na ye. Bato

wana bakomi ‘libota na ye’ mpe bango bakomi ba-missionnaire. Na

makolo bazali kokende elongo na Catherine na bamboka mpe na

bingumba ya Italie mpe na ndambo ya France. Bazali kotanga Liloba

ya Nzambe, bazali kolimbola yango, komaniola yango na kati ya

motema. Bazali koyekola mateya ya ba-mystique, bazali koyekola

théologie ya santu Thomas. Ba-secrétaire misato bazali kokende

nzela moko na Catherine mpe libota na ye. Bazali kokoma makambo

Catherine azali koloba. Catherine ayebi kokoma te.

Na ntango wana, ba-Papa bazali kofanda lisusu na Roma te, kasi

bazali kofanda na Avignon (France). Catherine akomeli Papa azali na

France monkanda : Tata mosantu, oyoka liloba ya Yezu azali kolobela

yo : bato bazali kofanda penepene na yo bazali kobebisa bato bazali

kofanda na ngai na likolo…. Yango wana, ozonga na Roma, na kiti na

yo, ozila te (Ecoutez donc, Saint Père, les paroles que vous adresse

Jésus Christ : Votre cour mondaine ruine ma céleste cour… Revenez

donc à Rome, à votre siège, le plus tôt que vous pourrez). Na 1376,

Catherine na libota na ye bakomi na Avignon. Papa, nsima ya sanza

misato, azongi na Roma.

Na 1378, Eklezia ekabwani : bakristu mosusu bazali kolanda Papa

atikali na Roma, bakristu mosusu bazali kolanda Papa azongi na

Avignon. Catherine asali manso, akabi bomoi na ye na Nzambe na

ntina ‘te boyokani ezonga na kati ya Eklezia. Catherine akufi na

Roma, akokisi bobele mbula 33.

Tee ntango oyo Catherine azali kokoba mosala na kati ya Eklezia na

minkanda (lettres) azalaki kokoma na bato ya ndenge na ndenge,

mingi mpe na nzela ya buku na ye : Dialogue. Na kati ya buku oyo,

Catherine azali kolakisa boyambi na ye monene, na nzela ya masolo

na ye na Nzambe. Toyoka maloba ya mòto mòto ya santu Catherine

na kokanisa mpasi ya Yezu : Yezu ya malamu mpe ya boboto, ozalaki

wapi ntango molimo na ngai ezalaki komona mpasi ya ndenge

wana ? – Ngai nazalaki na kati ya motema na yo – oyo eyano ya Yezu

– zambi nakokende mosika te na baninga na ngai… nazalaki na kati ya

motema na yo.

Monkanda ya santu Catherine na François Malavolti : Ngai mpe,

mama na yo ya mobola, nazali kokende koluka yo mpe kotuna mpo

ya yo, zambi nalingi komema yo na mapeka ya mpasi mpe ya ngolu

na ngai, oyo ngai nazali koyoka mpo ya molimo na yo. Yango wana,

fungola liso na yo ya motema : obima na molili, ndima mabe na yo,

mpo ya kolongola elikia te, kasi mpo ya komiyeba mpe kotia elikia na

motema malamu ya Nzambe.

Maloba ya Catherine na nsuka ya bomoi na ye : Moninga na ngai ya

motema (Mon bien-aimé), ozali kobenga ngai, ngai oyo ! Nazali koya,

na matomba (mérites) te, kasi na ngolu na yo kaka, mpe na nguya ya

makila na yo.

Liloba ya Nzambe : Bokokisa maye Liloba lizali kotinda. Boyoka

lyango bobele na matoi te, soki te bokomikosa (Jacques 1,22).

Losambo : Tosenge na Nzambe apesa biso miso ya motema mpo ya

komona ye na kati ya mokili oyo ya mobulu.

Page 10: Echo de Saint Amand - WordPress.comesika ya Nsekwa na yo, mpe na molimo na ngai nazanga kokende epai ya elanga, esika nkunda na yo etikali mpamba. Mpamba te, ezali Kristu oyo asekwi,

10

Au sujet de l’égalité entre les hommes

On dit volontiers : Tous naissent égaux, tous sont égaux devant la

loi, on brandit des slogans : Liberté, égalité, fraternité comme au

temps de la révolution française, mais en pratique nous voyons un

tas d’inégalités, des discriminations dans la société. Cela doit nous

interpeller, nous les chrétiens qui sommes le sel de la terre et la

lumière du monde. Ce temps de Carême doit pouvoir nous stimuler à

agir pour plus de justice dans le monde. Pensons un peu à quelques

paroles de l’Evangile : J’avais faim et vous m’avez donné à manger ;

Que celui qui a deux chemises partage avec celui qui n’en a pas ! ;

Que celui qui a de la nourriture fasse de même ! ; Donne à celui qui

te demande, ne te détourne pas de celui qui veut t’emprunter ! …

Au sujet de l’égalité saint Paul a quelque chose à nous dire. En ce

temps-là les chrétiens de Jérusalem étaient tombés dans la famine,

surtout par manque de pluie. Saint Paul organise une collecte à

Corinthe en faveur de l’église de Jérusalem. Ecoutons ses paroles en

2 Cor 8, 9 ss : « Vous connaissez la générosité de notre Seigneur

Jésus Christ, qui pour vous, de riche qu’il était, s’est fait pauvre, pour

vous enrichir de sa pauvreté… Il ne s’agit pas de vous mettre dans la

gêne en soulageant les autres, mais d’établir l’égalité. En cette

occasion, ce que vous avez en trop compensera ce qu’ils ont en

moins, pour qu’un jour ce qu’ils auront en trop compensera ce que

vous aurez en moins, cela fera l’égalité ».

Deux fois le mot égalité est écrit par saint Paul dans ce texte. Ici à

Kinshasa il ne s’agit pas de deux villes distantes comme Corinthe et

Jérusalem. Mais au sein de notre ville de Kinshasa, certains mangent

à leur faim et ont des réserves et d’autres n’ont rien. Nous savons

tous que quand la misère s’accompagne de la maladie, la mort est

proche : tu es malade et en même temps pauvre, le corps ayant

besoin de bien manger et d’être soigné à l’hôpital, et tu n’as ni à

manger ni soins, …

Pouvons-nous créer un peu d’égalité avec ceux qui souffrent de la

faim et de la maladie ? Il s’agit de partager, il n’y a pas d’autres

moyens. Comment faire alors ? Créer des groupes de gens pleins de

bonne volonté qui peuvent donner 5000 Fc, 10.000 Fc ou plus, à une

famille, chaque mois par exemple. Des groupes informels, sans règles

ni statuts. Mettre en tête de chaque groupe une personne

dynamique qui anime, qui cherche des adhérents parmi les parents,

amis et connaissances. Il s’agit aussi d’aider des personnes ou des

familles qui voudraient rentrer dans leur village d’origine, ou qui

voudraient cultiver des champs non loin de la ville de Kinshasa.

Chaque mois on récolte l’argent et chaque mois on distribue tout ; le

mois suivant on recommence à nouveau.

Dans chaque paroisse, il faut penser que ce sont les légionnaires qui

sont bien engagés et qui pourraient surtout former ces groupes

d’entraide.

Il faut penser aussi qu’un jour nous aussi nous pourrons avoir besoin

de l’aide des autres, comme dit saint Paul. Mais alors quelle

révolution qu’il propose !

Page 11: Echo de Saint Amand - WordPress.comesika ya Nsekwa na yo, mpe na molimo na ngai nazanga kokende epai ya elanga, esika nkunda na yo etikali mpamba. Mpamba te, ezali Kristu oyo asekwi,

11

Paroisse saint Amand : Œcuménisme

Dans le secteur Mombele – Ngaba, des chrétiens de différentes

confessions se sont réunis le 28 mars pour prier et pour écouter deux

conférences : sur Martin Luther et sa réforme et sur la contre-

réforme qui a commencé aussitôt après avec le Pape Adrien VI. Le

pasteur luthérien Muladika Gaston a parté de la vie et de la réforme

de Luther, commencée en 1517. C’état très intéressant d’écouter un

pasteur luthérien parler de sa propre Communauté religieuse. Le P.

Maurutto Silvère a parlé de la contre-réforme qui a commencée

aussitôt après, en 1523 avec le Pape hollandais Adrien VI, En cette-là

le Pape a envoyé son légat à Nuremberg, en Allemagne pour qu’il

puisse lire devant la Diète de l’empire cette lettre : Toi (légat papal)

tu dois dire aussi que nous reconnaissons spontanément que Dieu a

permis cette persécution de l’Eglise à cause des péchés des hommes,

spécialement des prêtres et des prélats…

Nous savons bien qu’aussi dans ce saint siège ont été commis depuis

beaucoup d’années plusieurs scandales, abus en matière spirituelle,

transgression des commandements, et encore plus, que tout cela

s’est changé en scandale.

C’est pourquoi on ne peut pas s’étonner si le mal à partir de la tête

s’est propagé dans les membres, à partir des Papes aux prélats. Nous

tous, prélats et ecclésiastiques avons dévié du bon chemin et depuis

longtemps il n’y a plus personne à faire le bien.

C’est pourquoi, humilions-nous devant Dieu. Chacun de nous doit

réfléchir sur les motifs qui ont causé sa chute. Préférons de nous

juger nous-mêmes au lieu d’être condamnés par Dieu au jour de sa

colère.

Monkanda oyo Papa Adrien VI (hollandais) apesaki na ntoma na ye

mpo atanga yango na likita monene ya bakonzi ya Leta basagani na

Nuremberg (Allemagne), na 1523 :

Yo (ntoma ya Papa) osengeli koloba mpe ‘te biso tondimi na mpasi te

‘te Nzambe apesi nzela ‘te Eklezia anyokwama mpo ya masumu ma

bato, mingi mpenza mpo ya masumu ya banganga Nzambe mpe ba-

Papa.

Toyebi malamu ‘te, ata awa na kiti ya Papa, bandakisa ya mabe,

bokosi na mambi etali molimo, bobuki mibeko esalemi, bongo mabe

oyo yonso epesi esimbisi monene.

Na ntina yango tokoki kokamwa te soko mabe euti na motù epanzani

na nzoto mobimba, euti na Papa mpe eleki na baepiskopo. Biso

yonso, Papa, baepiskopo na banganga Nzambe topengwi, totiki nzela

ya malamu.

Yango wana, tomikitisa na miso ya Nzambe. Moto na moto akanisa

mpe aluka ntina ya bokwei na ye. Topona na komisambisa biso

moko, bongo Nzambe akitisa biso te na mokolo ya nkanda na ye.

Après la séparation de l’Eglise catholique, Martin Luther est sous le

tourment et l’angoisse du doute. Il écrit comme dans un dialogue

avec lui-même :

Page 12: Echo de Saint Amand - WordPress.comesika ya Nsekwa na yo, mpe na molimo na ngai nazanga kokende epai ya elanga, esika nkunda na yo etikali mpamba. Mpamba te, ezali Kristu oyo asekwi,

12

Penses-tu que tous les maîtres du passé ne le savaient pas ? Tous nos

pères auraient été des ignorants ? Toi seulement, tu as été inspiré

par l’Esprit Saint dans ces temps derniers ? Dieu aurait laissé errer

son peuple pendant tant d’années ?...

Combien de fois mon cœur a palpité, m’a puni et m’a fait des

reproches avec son unique, très fort argument : Seulement toi tu es

sage ? Tous les autres se tromperaient, et se seraient trompés

pendant si longtemps ?

Et si toi, tu te trompes et tu entraînes tant de gens dans l’erreur,

combien seront damnés pour l’éternité ? (Editions de Weimar, 1885)

Ozali kokanisa ‘te bato yonso ya bileko eleki bayebaki yango te ?

Batata yonso ya biso ya boyambi, bazalaki na mayele te ? Bobele na

kati na yo Elimo Santu abotisi likanisi oyo, na eleko oyo tozali na

yango ? Bongo Nzambe atiki bato babunga nzela bambula ebele

boye ?

Mbala boni motema na ngai ebeti, epesi ngai etumbu mpe apaleli

ngai na likanisi moko oyo : Bobele yo ozali na mayele ? Bato yonso

bamikosi, babungi ? Mpe babungi bambula ebele boye ?

Bongo yo, soko obungi mpe obendi bato ebele na makambo ya

lokuta, bato boni bakozwa etumbu mpo ya seko ?

L’Ukraine

En 2013, l’Ukraine renonce à signer un accord d’association avec

l’Union Européenne. Le refus du gouvernement de signer entraîne

d’importantes manifestations pro-européennes à Kiev : des

centaines de milliers. Ils demandent la démission du Président

Yanoukovitch. La capitale se transforme en champs de bataille. Le 22

février 2014, 75 personnes sont tuées par des soldats du

gouvernement. Le 22 février aussi Yanoukovitch quitte Kiev. Le

parlement vote sa destitution et fixe au 25 mai les élections. –

L’ancienne Première ministre, Iulia Timochenko est libérée, après

deux ans de prison. Olexander Tourtchinov est choisi pour diriger

pour quelques mois le pays.

Les manifestants entrent dans la résidence de Yanoukovitch et sont

choqués par le train de vie que menait Yanoukovitch dans cette

résidence. Il s’est réfugié en Russie. Un mandat d’arrêt est lancé

contre lui pour meurtres de masse.

Le 16 mars 2014 un référendum a eu lieu en Crimée, territoire

d’Ukraine. Les habitants de cette région, en majorité russophones

votent en grande majorité leur attachement à la Russie. Sur 2

millions d’habitants, la Crimée a aussi une importante minorité de

tatars. Ils sont 300.000 et n’aiment pas être rattachés à la Russie.

Mais, d’après leur porte-parole personne ne les a consultés lors du

référendum.

Bien que la langue officielle de l’Ukraine soit l’ukrainien, la plupart

des ukrainiens savent parler russe couramment du fait que 17% de

la population est officiellement russe et que l’Ukraine a fait partie

pendant plus de 340 de l’empire russe.

Religion en Ukraine : Religion orthodoxe : 59 % ; religion catholique :

9, 6%.